Jesus Loves the Man Enough to Challenge His Wealth
Welcome to Day 278 of our journey with Jesus. Today, we discover what this passage shows about Jesus. The main truth for today is this: Jesus loves people enough to tell them the truth and offers rescue from sin that only God can make possible. Let’s begin.
Current details of the journeyView the calendar, Episode and passage
Jesus in Action
Mark 10:17–31
Step 3 of 5
Yekola oyo eteni oyo ezali komonisa mpo na Yesu.
Wana Yesu azalaki kokende, moto moko apotaki mbangu mpo na koya epai na Yesu, afukamaki liboso na Ye mpe atunaki : — Moteyi malamu, nasengeli kosala nini mpo ete nazwa bomoi ya seko ? Yesu azongisaki : — Mpo na nini ozali kobenga Ngai « Moteyi malamu ? » Moko te azali malamu, longola kaka Ye moko Nzambe. Oyebi mibeko oyo : « Okobomaka te, okosalaka ekobo te, okoyibaka te, okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo, okosalaka moninga mabe te, okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu. » Moto yango alobaki lisusu : — Moteyi, natosaka nyonso wana wuta bolenge na ngai ! Yesu atalaki ye, asepelaki na ye mingi mpe alobaki na ye : — Ozangi eloko moko kaka : kende, teka biloko na yo nyonso mpe pesa mbongo oyo okozwa epai ya babola ; bongo okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai. Tango moto yango ayokaki bongo, alembaki nzoto mpe akendeki na mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi. Yesu atalaki bayekoli na Ye, alobaki na bango : — Ezali pasi mpo na bazwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe ! Bayekoli bakamwaki mingi mpo na maloba na Ye. Kasi Yesu alobaki na bango lisusu : — Solo, bana na Ngai, ezali pasi mpo na kokota kati na Bokonzi ya Nzambe ! Ezali pete mpo na shamo kolekela na lidusu ya tonga, kasi ezali penza pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe. Bayekoli bakamwaki mingi mpe bakomaki kotunana : — Bongo nani penza akoki kobikisama ? Yesu atalaki bango mpe alobaki : — Na bato, ekoki kosalema te ; kasi na Nzambe, ekosalema penza ; pamba te nyonso ekoki kosalema na Nzambe. Petelo alobaki na Yesu : — Biso, totiki nyonso mpo na kolanda Yo ! Yesu azongisaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo atiki ndako na ye, bandeko na ye ya mibali mpe ya basi, mama na ye, tata na ye, bana na ye to bilanga na ye, mpo na Ngai mpe mpo na Sango Malamu, akozwa mbala nkama koleka, na tango oyo tozali kobika sik’oyo, bandako, bandeko ya mibali mpe ya basi, bamama, bana mpe bilanga, elongo na minyoko ; mpe na tango oyo ekoya, bomoi ya seko. Kasi kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka ; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso.
Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Mark says Jesus looks at the man and loves him before giving the command that sends him away sorrowful. Jesus’ love is not sentimental permission to remain ruled by whatever competes with Him.
Watch: Can You Truly Follow Jesus? The Heart’s Real Treasure Revealed
Watch the companion video, then continue reading to examine the biblical testimony in its full context.
He Sees Beneath Respectability.
The man is earnest, morally serious, and outwardly successful. Jesus is not distracted by those strengths. He identifies the allegiance that still governs the man’s response.
He Calls People to Himself.
“Come, follow me” places Jesus at the center. He does not merely offer better financial ethics; He claims the authority to reorder the man’s life around Himself.
He Names Human Impossibility.
When the disciples ask who can be saved, Jesus does not answer with a more achievable checklist. He says it is impossible with man but possible with God.
Love That Tells the Truth.
This encounter reveals a Jesus who can love a person deeply while refusing to flatter him. His diagnosis is severe because eternal life cannot be built on a rival foundation.
Kanisa na likambo oyo.
What does this reveal about Jesus’ identity and mission?
Explore what this reveals
See the love and authority with which Jesus exposes rival trust and calls people to follow Him.